John 20

Yesu asekwi

(Mt. 28.1 ; Mk. 16.1-4 ; Lk. 24.1-2,9-12)

1Na tongo-tongo penza ya mokolo ya liboso ya poso, na tango molili ezalaki naino, Mariya ya mboka Magadala akendaki na lilita ; mpe akutaki libanga basiʼbalongoli yango na lilita. 2Azongaki mbangu epai ya Simon Piere mpe epai ya moyekoli mosusu oyo Yesu azalaki kolinga, mpe alobaki :

—Balongoli Nkolo na lilita, mpe toyebi te soki batie ye wapi !

3Bongo Piere abimaki elongo na moyekoli oyo mosusu, mpe bakendaki na lilita. 4Bango mibale bazalaki kokima mbangu nzela moko, kasi lokola moyekoli oyo mosusu azalaki mbangu mingi koleka Piere, yango wana akomaki liboso na lilita. 5Angunzamaki, mpe amonaki bilamba oyo bakundelaka Yesu, ezalaki na mabele ; kasi akotaki na kati te. 6Simon Piere, oyo azalaki kolanda ye, akomaki, akotaki na lilita mpe amonaki bilamba na mabele, 7na elamba oyo bazingaki Yesu na motu. Elamba yango, oyo bazingaki Yesu na motu, ezalaki esika moko te na bilamba oyo bakundelaki ye, kasi ezalaki ya kolingama na esika na yango moko. 8Bongo moyekoli mosusu oyo akomaki liboso na lilita, ye mpe akotaki. Amonaki mpe andimaki. 9Pamba te, kino tango wana, basosolaki naino te Makomi, ete Yesu asengelaki kosekwa kati na bakufi.

10Bongo bayekoli wana mibale bazongaki epai na bango.

Yesu abimeli Mariya ya mboka Magadala

11Kasi Mariya atelemaki na libanda, pene-pene na lilita, mpe azalaki kolela. Awa azalaki kaka kolela, angunzamaki mpo na kotala na kati ya libulu ; 12amonaki baanzelu mibale balataki bilamba ya pembe, bavandaki na esika ezalaki nzoto ya Yesu, moko epai ezalaki motu, mpe mosusu epai ezalaki makolo. 13Baanzelu batunaki ye :

—Mwasi, mpo na nini ozali kolela ?

Azongiselaki bango :

—Bolongoli Nkolo na ngai, mpe nayebi te soki batie ye wapi !

14Awa alobaki bongo, abaluki mpe amonaki Yesu atelemaki wana ; kasi ayebaki te ete ezalaki Yesu.

15Yesu atunaki ye :

—Mwasi, mpo na nini ozali kolela ? Ozali koluka nani ? Mariya akanisaki ete azali mosali ya elanga, bongo alobaki na ye :

—Tata, soki yo moto olongolaki ye, yebisa ngai soki otie ye wapi, mpo nakende kokamata ye !

16Yesu alobaki na ye :

—Mariya !

Mariya abalukaki mpe alobaki na monoko ya ki-ebreo :

—Rabuni (yango elingi koloba : Moteyi !)

17Yesu alobaki na ye :

—Kosimba ngai te ; pamba te, naino nabuti epai ya Tata na ngai te. Kasi kende epai ya bandeko na ngai, mpe loba na bango : Nabuti epai ya Tata na ngai, mpe Tata na bino, epai ya Nzambe na ngai mpe Nzambe na bino !

18Bongo Mariya ya mboka Magadala akendaki koyebisa bayekoli ete amonaki Nkolo, mpe Nkolo ayebisaki ye makambo wana.

Yesu abimeli bayekoli na ye

(Lk. 24.36-43 ; tala Mk. 16.14)

19Na pokwa ya mokolo wana ya liboso ya poso, bayekoli basanganaki esika moko, mpe bakangaki malamu-malamu baporte, mpo bazalaki kobanga bayuda.

Yesu ayaki, atelemaki na kati-kati na bango, mpe alobaki na bango :

—Kimia ezala na bino !

20Awa asilisaki koloba bongo, alakisaki bango maboko na ye mpe mopanzi na ye. Bayekoli batondaki na esengo tango bamonaki Nkolo.

21Yesu alobaki na bango lisusu :

—Kimia ezala na bino ! Ndenge Tata atindaki ngai, ngai mpe natindi bino !

22Sima ya maloba wana, afulaki likolo na bango, mpe alobaki na bango :

—Bozwa Molimo Mosantu !
23Masumu ya bato oyo bino bokolimbisa, ekolimbisama ; masumu ya baoyo bino bokolimbisa te, ekolimbisama mpe te !

Yesu abimeli Toma

24Toma, moyekoli moko na kati ya bayekoli zomi na mibale, oyo babengaka “Lipasa”, azalaki elongo na bayekoli te tango Yesu ayaki.

25Bongo bayekoli mosusu balobaki na ye :

—Tomoni Nkolo !

Kasi Toma azongiselaki bango :

—Soki namoni bilembo ya basete na maboko na ye te, natie mosapi na ngai na esika ezalaki basete te, mpe natie loboko na ngai na mopanzi na ye te, nakondima yango te !

26Sima ya mikolo mwambe, bayekoli bazalaki lisusu na ndako, Toma mpe azalaki elongo na bango ; mpe baporte ezalaki ya kokangama. Bongo Yesu ayaki mpe atelemaki na kati-kati na bango mpe alobaki :

—Kimia ezala na bino !

27Bongo alobaki na Toma :

—Yaka kotia mosapi na yo awa, mpe tala maboko na ngai ; yaka kotia loboko na yo na mopanzi na ngai ; kozala motema libanga te, kasi ndima !

28Toma azongiselaki ye :

—Nkolo na ngai mpe Nzambe na ngai !

29Yesu alobaki na ye :

—Ondimi mpo omoni ngai ! Esengo na bato oyo bamoni te, kasi bandimi !

Tina ya mokanda oyo

30Yesu asalaki makamwisi mosusu mingi na miso ya bayekoli na ye, oyo ekomama te na mokanda oyo. 31Kasi makambo oyo ekomama mpo ete bondima ete Yesu azali Kristo, Mwana na Nzambe ; mpe na nzela ya kondima, bokoka kozwa bomoi na kombo na ye.
Copyright information for LinMNB